Komipesa Mpo na Bolamu Koleka na Mosala
– Libondeli ya Kokumisa –
Ee Nzambe na ngai, ozali monene mingi boni, mpe misala na yo ezali na bolamu oyo eleki nyonso. Na ebandeli, osalaki likoló mpe mabelé. Mabelé ezalaki na lolenge te mpe mpamba, mpe molili ezalaki likoló ya mozindo.
Tata ya seko, na mikolo motoba, emoneli na yo ya polele mpe ya monene ekokisamaki, na nzela ya misala oyo esalemaki malamu, engebene na mwango oyo esalemaki na kokoka nyonso, kotikaka esika te mpo na makambo oyo eyebanaki te.
Mosala moko na moko esukaki na mbano. Na nsuka ya eteni moko na moko, otalaki ndenge makambo ezalaki. Esengo na yo mpo na mosala na yo ezalaki lifungola ya eteni oyo elandaki, mpe elendisaki motema mpo na mbuma.
Ezalaki na kotaláká ndenge mosala na yo ezalaki nde omonaki ete Adama azalaki ye moko. Mpo na koziba bozangi yango malamu, na kosangisaka Adama na mosala ya bokeli, olekisaki oyo azalaki kozela, ntango amonaki mosala na yo oyo eleki kitoko.
Okelaki ngai na elilingi na yo, na lolenge na yo. Liloba na yo ezali mwinda mpo na makolo na ngai mpe pole mpo na nzela na ngai. Nayaki awa na mabelé mpo na kokolisa yango mpe kotondisa yango bomengo na nse ya bokambi na yo.
Tata, nazali kokumisa yo, pamba te osalaka makambo ya kitoko mingi. Liloba na yo elobi na ngai nasala nyonso na motema mobimba, lokola mpo na yo, kasi mpo na bato te.
Nafukami liboso na yo na limemya, nazali kosepela na nkembo ya misala na yo. Tata, lokola nazwi boyebi oyo mpe nazali na mposa ya kosala lokola yo, nazali komipesa mpo na kolanda bolamu koleka, nakangami makasi na botosi.
Jean-Honoré Mukendi Meji Kazadi
